Minzoto na Makomami Ntango nakotalela lola na yo, mosala ya misapi na yo, sanza mpe minzoto, oyo obongisi; Moto azali nini, ete ozali kokanisa ye? mpe mwana ya moto, ete ozali kotala ye? Nzembo 8:3-4
Pentateuque oyo ezali Mpe Nzambe asalaki miinda minene mibale; pole monene mpo na koyangela moi, mpe pole moke mpo na koyangela butu: asalaki mpe minzoto. Genese 1:16 Mpe abimisaki ye na mboka mopaya, mpe alobaki ete: “Talá sikoyo epai ya likoló, mpe yebisa minzoto, soki okoki kotánga yango.” Genese 15:5 Ete na kopambola nakopambola yo, mpe na bokoli nakobakisa nkona na yo lokola minzoto ya lola, mpe lokola zelo oyo ezali na libongo ya mbu; mpe nkona ya yo ekozwa ekuke ya bayini ba ye; Ebandeli 22:17 Mpe nakosala ete nkona na yo ekóma mingi lokola minzoto ya lola, mpe nakopesa na nkona na yo mikili oyo nyonso; mpe o nkona ya yo mabota manso ma mabele makopambolama; Genese 26:4 Mpe alotaki ndɔtɔ mosusu, mpe ayebisaki yango bandeko na ye, mpe alobaki ete: “Talá, nalɔti lisusu ndoto; mpe, tala, moi mpe sanza mpe minzoto zomi na moko ekumbamaki epai na ngai. Genese 37:9 Kanisá Abrahama, Yisaka, mpe Yisraele, basaleli na yo, baoyo olapaki ndai na yo moko, mpe olobaki na bango ete: “Nakobakisa momboto na yo lokola minzoto ya likoló, mpe mokili oyo nyonso oyo nalobeli nakopesa na momboto na yo, mpe bakozwa yango libela na libela.” Kobima 32:13 Nakomona ye, kasi sikawa te: Nakotala ye, kasi penepene te: Monzoto moko ekobima na Yakobo, mpe Likonzí moko ekobima na Yisalaele, mpe ekobeta nsɔngɛ ya Moaba, mpe ekobebisa bana nyonso ya Sete. Mituya 24:17 Yehova Nzambe na bino akómisi bino mingi, mpe talá, lelo bozali lokola minzoto ya likoló mpo na ebele. Kolimbola Mibeko 1:10 Mpe noki otombola miso na yo o lola, mpe ntango okomona moi, mpe sanza, mpe minzoto, kutu mampinga manso ma lola, okopusama mpo na kosambela bango, mpe kosalela bango, maye Yawe Nzambe wa yo akaboli na bikolo binso o nse ya lola mobimba. Kolimbola Mibeko 4:19